1 Corinthians 8

Eyano mpo na banyama oyo babonzelaka banzambe ya bikeko

1Mpo na banyama oyo babonzelaka banzambe ya bikeko : Biso nyonso toyebi malamu ete tozali na boyebi. Boyebi epesaka lolendo, kasi bolingo elendisaka. 2Moto oyo akanisi ete azali na boyebi ya makambo, ayebi nanu eloko te na ndenge esengeli. 3Kasi, moto oyo alingaka Nzambe, Nzambe ayebi ye.

4Boye, mpo na makambo oyo etali banyama oyo babonzelaka banzambe ya bikeko : Toyebi malamu ete nzambe ya ekeko ezali eloko pamba kati na mokili, Nzambe azali kaka se moko. 5Solo, ezali na bikelamu ebele oyo ebengami na kombo ya banzambe na lola to na mokili, yango esali ete banzambe mpe bankolo bazala ebele, 6kasi mpo na biso, Nzambe azali kaka se moko, Ye nde azali Tata mpe Mokeli na nyonso, mpe biso tozali na bomoi mpo na Ye, mpe Nkolo azali kaka se moko, Ye Yesu Klisto. Nyonso esalema na nzela na Ye mpe biso tozali na bomoi mpo na Ye.

7Kasi bato nyonso bazali na boyebi ya makambo oyo te. Bato misusu bazali nanu na momesano ya kosambela banzambe ye bikeko kino sikʼoyo, boye tango baliaka misuni ya banyama oyo babonzelaka banzambe ya bikeko, bandimaka ete ezali penza mbeka oyo babonzelaka banzambe wana. Boye, mitema na bango ekomaka mbindo mpo ete elenda te. 8Nzoka nde, ezali bilei te nde ememaka biso pene na Nzambe : soki tolie te, tokobungisa eloko moko te ; soki mpe tolie, tokozwa mpe eloko moko te. 9Kasi bokeba ete bonsomi na bino ekoma libaku te mpo na baoyo balenda te kati na kondima. 10Pamba te, soki moko kati na baoyo balenda te kati na kondima amoni yo, oyo ozali na boyebi, kolia na ndako ya nzambe ya bikeko ; boni, motema na ye ekozanga solo kotindika ye ete alia mpe misuni ya banyama oyo babonzelaka banzambe ya bikeko ? 11Boye, ndeko oyo alenda te kati na kondima, ye oyo Klisto akufelaki, akopengwa likolo ya boyebi na yo. 12Tango bozali kobetisa bandeko na bino mabaku na ndenge wana, mpe bozali kozokisa mitema na bango oyo elenda te, bozali nde kosala masumu liboso ya Klisto Ye moko. 13Yango wana, soki bilei oyo nazali kolia ekweyisi ndeko na ngai na masumu, nakolia yango lisusu te, mpo ete nazala libaku te oyo ekokweyisa ye na masumu.
Copyright information for LinMNB